Connect with us

Hi, what are you looking for?

Société

Balingi batinda ba expatriés ebele oyo bawuti na USA awa na RDC kasi Moussa Kalema apameli accord migratoire wana mpo alobi ete esalemaki na molili mpe na mépris ya population (TRIBUNE)

Na contexte ya bitumba na Est ya mboka na biso République démocratique du Congo mpe kozanga bondimi kati ya bakonzi mpe bato, accord ya RDC na États-Unis na ntina ya koyamba ba expatriés ya USA ezali kolamusa masolo mikolo oyo. Na Kati ya tribune oyo, moko ya ba politiciens ya opposition mpe membre ya FCC, Moussa Kalema, azali kopamela ndenge esalemaki na molili mpe kozanga polele, mpe azali kobenga ba congolais bátala likambo yango na mayele mpe na mokumba mpo na kobatela bokonzi ya mboka.

TRIBUNE

Bandeko na ngai,

Tobotama na mboka moko, RDC, mboka ya bomengo kasi mpe ya mpasi. Lelo oyo, tozali na tango moko ya mpasi mingi. Na Est, bitumba ezali kokoba, bato bazali kokufa. Na ba quartiers na biso, vie ekomi difficile. Bana ya mboka bazali kozanga mosala.

Et pendant ce temps, ba décisions minene ezali kozwa, sans peuple koyeba solo.

Lelo, tozali koyoka histoire ya accord moko entre gouvernement ya biso na États-Unis, pona koyamba bato oyo babenganami kuna, ba migrants.

To loba polele : koyamba mopaya ezali mabe te. Congo ezalaka mboka ya boyambi. Kasi, kosalisa basusu esengeli te kobosana peuple na biso.

Tuna mituna ya pete, ya logique :

Bato boni bako ya ?
Bakovanda wapi ?
Bakovanda tango boni ?
Nani akobatela bango ?
Sécurité ya ba quartiers na biso ekozala ndenge nini ?

Mituna oyo ezali ya koyina te. Ezali mituna ya bon sens.

Pamba te vérité ezali boye : mboka na biso ezali déjà fragile. État ezali naino makasi te ndenge esengeli. Sécurité ezali naino problème. Na situation boye, décision nyonso esengeli kozala na bokebi mingi.

Tozali na expérience ya passé. Tango makambo ezalaki mal gérées, ekomaki problème monene. Ezalaki te mpo bato bazalaki mabe, kasi mpo État ezalaki prêt te.

Donc problème ezali nini ?

Ezali te koyamba bato.
Problème ezali kozanga kolimbola.
Problème ezali kozanga préparation.
Problème ezali kozanga contrôle.

Gouvernement esengeli koloba na peuple. Esengeli kolimbola. Esengeli ko rassurer.

Silence ebotaka somo.
Manque ya clarté ebotaka méfiance.
Méfiance ekabolaka nation.

Tozali kolinga division te. Tozali kolinga vérité.

Yango wana, tozali kosenga :

Que gouvernement ya Président Félix Tshisekedi aloba polele na peuple.
Que Parlement esala mosala na yango ya contrôle.
Que peuple azwa ba informations nyonso.

Mboka ezali ya bato na yango. Décision nyonso esengeli kozala pona intérêt ya peuple.

Patrice Emery Lumumba atikala kolakisa biso : dignité ya mboka ezali na ndenge tozali kozwa ba décisions na biso.

Tozali contre solidarité te.
Kasi tozali contre imprudence.
Tozali contre te monde.
Kasi tozali contre faiblesse na mboka na biso.

Bandeko, tango ekoki :

Totelema na mayele, pas na violence.
Totelema na vérité, pas na rumeurs.
Totelema na vigilance, mpo kobatela mboka na biso.

Pamba te peuple oyo azali informé, azali makasi.

Que Dieu bénisse RDC.

Fait à Kinshasa le 10 / 04 /2026.
Moussa Kalema Sangolo -zaku

Président National, Membre du Bureau Politique du PVR

Nos lecteurs ont lu ensuite